Page 8
Mosikoli wa Yisalaele
Mosikoli wa Yisalaele
1. Mosikoli wa
Yisalaele esengo!
Na yo tosengi: pambola,
Lipata o moi
likonzi kati ya butu,
Mokonzi, Nkolo wa biso.
2. Akoya mpenza
Kosangisa bampate,
Bango kokamba o Siona,
Ntina kani bawumela
kati ya libulu
lya liwa, kowayawaya.
3. Towayawaya mingi
kati ya mabe,
Mpe Tolela kobianga yo!
Banguna ba biso
ata bango basepeli
Yisalaele ezwi bonsomi.
4. Bana ba Siona tozwi
nsango elamu.
Bilembo bisi bibimi
Kimia! Zala sembo.
Bapesi bino bokonzi.
Bosikoli boyei pene.
5. Obongisa ngai Nkolo
Na mwinda mwa yo,
O sunga ngai na bolingo;
Sala mposa ya ngai
Ekoma o mboka ya yo;
Bakisela ngai elikia.
6. Banzelu nkoto zomi
Ya ye esengo.
Baluki liloba lya ye,
Mampinga ma lola baluki
Mongongo mwa ye.
Bapesi nkembo na Nkolo.
Maloba: William W. Phelps, 1792–1872; ekokisama na Joseph Swaim, 1761–1796 Ekota o Cantiques des SDJ ya yambo, 1835.
Miziki: Freeman Lewis, 1780–1859