1. Ntina ekasi, liloba kitoko,
Lisimbi bondimi bwa yo mosantu!
Lisusu nini akolobela bino
Boyei na Mokonzi, boyei na Mokonzi,
Boyei na Mokonzi mpo komibomba.
2. Bileko binso, mpasi to bolamu,
Na bokeleli to mpe na bomengo,
O ndako, o libanda, mokili mpe mai
Bo ekosenge yo. Bo ekosenge yo,
Bo ekosenge yo ekopesama.
3. Banga te, nazali na yo elongo,
Ngai Nkolo wa yo nakopesa ngolu.
Nakolendisa yo, kotelemisa yo ngbi
Maboko masimbi, maboko masimbi,
Maboko masimbi yo ma Mokonzi.
4. Soko okei na mai ma mozindo,
Ebale somo ekozindisa te,
Mpe nakozala elongo, kopambola yo;
Mpe kosantisa yo, mpe kosantisa yo,
Mpe kosantisa yo atako mpasi.
5. Soko kpokoso ekangi yo nzela,
Ya ngai ngolu ekoki kosunga,
Atako moto mokozikisa yo te,
Mokozikisa se, Mokozikisa se,
Mokozikisa se bosoto bwa yo.
6. Mpe bango bakoseke ata kala,
Mpo ya ngai bolingo bokopesama,
Bongo bakobongisa ya ngai tempelo.
Bo bampate bake, bo bampate bake,
Bo bampate bake nde nakomeme.
7. Ata moke te mondimi akozanga,
Azwi bopemi bwa ye na Mokonzi,
Ata lifelo mobimba liningani,
Nakosundola te, Nakosundola te,
Nakosundola te mondimi solo.
Maloba: Epesami na Robert Keen, ca. 1789. Ekota o Cantiques des SDJ ya yambo, 1835.
Miziki: Epesami na J. Ellis, ca. 1889