Page 24
Mosala elengi
Mosala elengi
1. Mosala elengi, Nkolo
kosanzola yo, Mokonzi;
Kotatola ya yo ngolu,
mpe bosolo ntango inso.
2. Elengi mokolo bule
Natika ba mposa ya nse,
o motema mwa ngai yemba,
bo Dawidi na lindanda.
3. Nakolonga o Mokonzi
liloba lya ye kumisa.
Misala mya yo nde mwinda.
Malako ma yo makamwa.
4. O elonga na koganga
mpo ya kombo ya yo seko,
Ntango o bokonzi bwa yo,
nakomono nkembo ya yo.
Maloba: Isaac Watts, 1674–1748
Miziki: John J. McClellan, 1874–1925