Page 34
Nkolo, Tata wa seko
Nkolo, Tata wa seko
1. Nkolo, Tata wa seko
ofandi o lola
Tosengi yo o nkombo
ya Yesu santisa,
Soko tozali peto
limpa, vino eye
Mpo ya komikundola
libonza lya Yesu.
2. Likabo lya bosantu!
Nani asosola?
Tozwi litatoli na
nzoto mpe makila,
Ya mpasi ya ye Mwana
oyo andimaki;
Bolimbisi masumu
tozwi solo na Ye.
3. Mopakolami Ysu
akitaki o nse,
amikabaki mbeka,
asikoli biso:
Azangaki bonzele
bato balukaka
Mobikisi ayaki
kopetola biso.
4. Bwania eleki manso,
mwango mwa bosantu,
Ekokisi lobiko
ebombaka Nkolo
Lokola moto mpamba,
Ye ayaki o nse
Ata bonene bwa ye
awei mpo tobika.
Maloba: William W. Phelps, 1792–1872. Ekota o Cantiques des SDJ ya Yambo, 1835.
Miziki: Felix Mendelssohn, 1809–1847