Page 42
Nakamwi
Nakamwi
1. Nakamwi bolingo Yesu akabeli ngai,Nsoni mpo ya ngolu ye atondiseli ngai,O ekulusu babakaki ye mpo ya ngai,Se mpo ya ngai mosumuki ye akufaki.
Nakamwi, asungaki ngai mingi kinaakufelaki ngai!O nakamwi mingi, nakamwi mingi.
2. Nakamwi akitaki uta o likolo,Mpo ya kobikisa ngai moto motomboki,kokabela ngai bolingo bwa Ye bonene,Bokoki kosikola, solo, kolongisa.
Nakamwi, asungaki ngai mingi kinaakufelaki ngai!O nakamwi mingi, nakamwi mingi.
3. Azokaki mpo ya kofuta niongo ya ngai.Mawa, bolingo mpe botosi nabosana?Te, te nakokumisa, kokumbamela ye!Kina o makolo ma ye nakofukama.
Nakamwi, asungaki ngai mingi kinaakufelaki ngai!O nakamwi mingi, nakamwi mingi.
Maloba mpe Miziki: Charles H. Gabriel, 1856–1932