Page 54
Molimo wa Nzambe
Molimo wa Nzambe
1. Molimo wa Nzambe bo moto mokopela!Nkembo ya mikolo mya nsuka eyei;Mamoni, mapamboli ma kala mazongi,Banzelu bayei lisusu o nse.
Toyemba elongo na Mampinga ma lolaHozana Hozana Nzambe mpe Mwa Mpate!Nkembo na bango Kuna o likolo o lolauta lelo mpe libela, Amen mpe amen.
2. Nkolo akokolisa bwania bwa basantu,Akozongisa manso bo o yambo.Nzambe akosopa boyebi mpe nguya.Akolimwisa molili awa nse.
3. Mpe tosangana na makita ma molimo,Bokonzi bwa lola topanza o nse,Mpo ya bondimi bwa biso tokosanzolaMapamboli mpe Nkembo ya Nzambe.
Mpe tosangana na makita ma molimo,Bokonzi bwa lola topanza o nse,Mpo ya bondimi bwa biso tokosanzolaMapamboli mpe Nkembo ya Nzambe.
4. O nkembo mokolo mwa mpate mpe nkosiElongo bakolala,, na nkanda te,Efelaima nde azwi nkembo ya SionaEkoya Yesu na Nkembo ya ye.
Toyemba elongo na Mampinga ma lolaHozana Hozana Nzambe mpe Mwa Mpate!Nkembo na bango Kuna o likolo o lolauta lelo mpe libela, Amen mpe amen.
Maloba: William W. Phelps, 1792–1872. Ekota O Cantiques des SDJ yayambo, 1835. Eyembamaki o libulisi lya Tempelo ya Kirtland o 1836.
Miziki: Nkombo eyebani te, ca. 1844