Page 60
Loba, bosolo bozali nini?
Loba, bosolo bozali nini?
1. Loba bosolo bozali nini?
Mpauni eleki motuya.
Ntalo ya bosolo tokomoyeba
bo motole mwa bakonzi ba lofundo o nse
mokomi bosoto bwa mpamba.
2. Loba bosolo bozali nini?
Bato, Banzambe bamoluki.
Kende koluka wapi Nde ezali
kongenge na bozindo to mapata o lola
yango mposa elongobani.
3. Lingenda lya moniokoli likwei,
soko sembo akobundisa.
Kasi likonzi lya solo lizali.
Na misisa mikasi mikopikaka mpende
mpe bokaneli bokokweia.
4. Loba bosolo bozali nini?
Ezali nsuka mpe liboso.
Manso o lola mpe nse makoleka.
Bosolo bozali bokuse bwa Bomoi mpe
bwango bokobongwanaka te.
Maloba: John Jaques, 1827–1900
Miziki: Ellen Knowles Melling, 1820–1905